Lokola Yawe akengelaki butu wana mpo na kobimisa bana ya Isalaele na Ejipito, butu yango ekomi ya Yawe : ekobanda kozala butu ya kokengela mpo na bana ya Isalaele na milongo na bango nyonso oyo ekoya.
Mikolo ekoya, tango bana na bino ya mibali bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini ? › Bokoloba na bango : ‹ Ezali na nguya na Ye nde Yawe abimisaki biso na Ejipito, mokili ya bowumbu.
Mpe yango ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino, pamba te Yawe abimisaki bino na Ejipito na nzela ya loboko na Ye ya nguya. »
Tango Faraon atikaki bana ya Isalaele kokende, Nzambe amemaki bango te na nzela ya mboka ya Filisitia atako yango nde ezalaki mokuse, pamba te Nzambe amilobelaki : « Soki bakutani na bitumba, bakoyoka mawa na ndenge babimaki na Ejipito mpe bakoluka kozonga kuna. »
Moyize alobaki na bato : « Bokanisa mokolo oyo bobimaki na Ejipito, mokolo oyo bobimaki na bowumbu, pamba te Yawe abimisaki bino na loboko na Ye ya nguya. Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire.
Feti oyo bokosala ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino mpo ete mibeko ya Yawe ezala na bibebu na bino, pamba te Ye nde abimisaki bino na Ejipito na loboko na Ye ya nguya.