Banzembo 136:1 - Mokanda na Bomoi1 Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Banganga-Nzambe batelemaki na bisika na bango ya mosala, ndenge moko na Balevi mpe bibetelo mindule ya Yawe oyo mokonzi Davidi asalaki mpo na kosanzola na yango Yawe na maloba oyo : « Bolingo na Ye ewumelaka seko na seko. » Ezalaki Davidi moto apesaki bango mokumba ya kobeta bibetelo mindule mpo na kokumisa Yawe. Banganga-Nzambe bazalaki ya kotalana na Balevi mpe bazalaki kobeta bakelelo ; bongo bana nyonso ya Isalaele bazalaki ya kotelema.
ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba : ‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’ Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe.