Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 135:7 - Mokanda na Bomoi

7 Amatisaka mapata wuta na suka ya mokili, atindaka mikalikali elongo na mvula, abimisaka mopepe wuta na bibombelo na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 135:7
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na tango molayi, na mobu ya misato, Yawe alobaki na Eliya : « Kende komimonisa epai ya Akabi, mpe Ngai nakonokisa mvula na mokili oyo. »


anokisaka mvula na mokili, mpe atindaka mayi na bilanga ;


Alobaki, mpe mopepe makasi eyaki, etombolaki bambonge.


ezala moto to mvula ya mabanga, ezala mvula ya pembe to londende, ezala mopepe makasi oyo ekokisaka liloba na Ye ;


Wuta na likolo, atindikaki mosika mopepe ya Este ; mpe na nguya na Ye, amemaki mopepe ya Sude.


Tango agangaka, mayi etiaka makelele makasi kuna na likolo, asangisaka mapata wuta na basuka ya mokili, apelisaka mikalikali, anokisaka mvula mpe abimisaka mopepe wuta na bibombelo na Ye.


Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo, oyo enokisaka mvula ? Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula ? Te ! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso ! Totie elikya na biso nyonso epai na Yo, pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso.


Tango agangaka, mayi etiaka makelele makasi kuna na likolo, asangisaka mapata wuta na basuka ya mokili, apelisaka mikalikali, anokisaka mvula mpe abimisaka mopepe wuta na bibombelo na Ye.


Kasi Yawe atindaki mopepe makasi na likolo ya ebale monene, mpe mopepe yango ememaki mbonge oyo ekomaki pene ya kozindisa masuwa.


Bosenga epai na Yawe ete anokisa mvula ya suka ; ezali Yawe nde atindaka mapata mpe bakake oyo ememaka bamvula minene, Ye nde abimisaka matiti na elanga ya moko na moko.


Mopepe epepaka esika nyonso oyo elingi kopepa ; atako oyoki makelele na yango, kasi okokaka te koloba soki ewuti wapi to ezali kokende wapi. Ezali mpe bongo mpo na moto nyonso oyo abotami na Molimo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ