Bato nyonso ya mokili bazali pamba na miso na Ye ; asalaka makambo oyo alingi na mampinga nyonso ya likolo mpe na bavandi ya mabele. Moto moko te azali na makoki ya kozongisa loboko na Ye sima.
Pamba te Ye oyo asalaki bangomba, oyo akelaki mipepe, oyo alakisaka makanisi na Ye epai na moto, oyo abongolaka pole molili, oyo atambolaka likolo ya bangomba ya mokili, Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.
Yawe atonga ndako na Ye kati na Lola mpe atia miboko na yango na mabele ; abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mabele. Kombo na Ye ezali : Yawe.