3 Bokumisa Yawe ! Pamba te Yawe azali malamu ! Boyembela Kombo na Ye, pamba te ezali kitoko makasi.
Pamba te Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko, mpe boyengebene na Ye, libela na libela.
Bokumisa Yawe ! Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, mpe bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Ozali malamu mpe osalaka makambo ya malamu ; teya ngai mitindo na Yo !
Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Bokumisa Yawe ! Tala ndenge ezali malamu kosanzola Nzambe na biso, mpe ndenge ezali kitoko kokumisa Ye !
Bino bato ya sembo, bobeta milolo ya esengo na tina na Yawe ! Kokumisa Nzambe ebongi na bato oyo bazali alima.
Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba, nakotombola maboko na ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kotuna Ngai na tina na oyo ezali malamu ? Moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota kati na bomoi, tosa mibeko.