Davidi alobaki na bato nyonso : — Bopambola Yawe, Nzambe na bino ! Boye, bato nyonso bakumisaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, bagumbamaki mpe bafukamaki liboso ya Yawe mpe ya mokonzi.
Abongisi elombe mokangoli mpo na bato na Ye ! Ezali likambo oyo bayengebene na Ye nyonso, bana nyonso ya Isalaele, bato oyo balingaka Ye, basengeli kokumisa Yawe mpo na yango. Bokumisa Yawe !
Bongo mongongo moko ebimaki wuta na Kiti ya Bokonzi mpe elobaki : « Bokumisa Nzambe na biso ; bino bawumbu na Ye nyonso, bino oyo botosaka Ye, mikolo mpe bana mike ! »