Oh Nzambe, ozali Nzambe na ngai ; nazali koluka Yo, molimo na ngai ezali na posa na Yo, bomoi na ngai ezali na posa na Yo makasi, kati na mabele ekawuka mpe ezanga mayi.
Telema, ganga na butu ndenge bakengeli basalaka na butu ; sopa motema na yo lokola mayi, na miso ya Nkolo, tombola maboko na yo epai na Ye mpo na bomoi ya bana na yo, oyo bazali kokufa nzala na babalabala nyonso.