Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 133:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 133:1
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami alobaki na Loti : « Tika ete koswana ezala te kati na ngai mpe yo to kati na babateli bibwele na yo mpe babateli bibwele na ngai, pamba te tozali bandeko.


Jozefi atikaki bandeko na ye kokende. Tango bazali kolongwa, alobaki na bango : — Boswana te na nzela.


Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Nasepelaka tango balobaka na ngai : « Tokende na Tempelo ya Yawe ! »


Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe abatelaki biso te ; tika ete Isalaele aloba bongo !


Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, motema na ngai ezali na lofundu te, miso na ngai ezali na posa makasi te ; namipesaka te na makambo oyo eleki ya minene mpe eleki pasi mpo na ngai.


Motema likunya ya Efrayimi ekosila, mpe banguna ya Yuda bakobebisama ; Efrayimi akozala lisusu na motema likunya te mpo na Yuda to mpe Yuda akozala lisusu monguna ya Efrayimi te.


Mbwa ya zamba ekovanda esika moko na mwana meme, nkoyi ekolala esika moko na mwana ntaba ; mwana ngombe ya mobali, mwana nkosi mpe banyama ya mafuta ekolia esika moko, bongo mwana moke nde akoyeisa yango.


Mabe to kobebisama ekosalema lisusu te na likolo nyonso ya ngomba na Ngai ya bule, pamba te mokili ekotonda na boyebi ya Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.


Nakopesa bango motema se moko mpe etamboli se moko mpo ete batosaka Ngai tango nyonso mpo na bolamu na bango mpe mpo na bolamu ya bakitani na bango.


Soki libota moko ekabwani, libota yango ekowumela te ;


Ezali na nzela ya bolingo oyo bokotalisana bino na bino nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na Ngai.


mpo ete bango nyonso bazala moko ndenge Yo Tata ozali kati na Ngai, mpe Ngai kati na Yo ; ete bango mpe bazala moko kati na biso, mpe ete mokili endima ete ezali Yo nde otindaki Ngai.


Bandeko, na Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, nazali kosenga na bino ete bozala na boyokani kati na bino, kasi na bokabwani te ; bozala motema moko mpe makanisi moko.


Mpo na kosukisa, bozalaka, bino nyonso, na makanisi moko, boyokelanaka mawa, bolinganaka lokola bandeko, bozalaka bato malamu mpe bato ya komikitisa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ