Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, telema mpe yaka na esika na Yo ya bopemi, Yo elongo na Sanduku ya nguya na Yo ! Oh Yawe Nzambe, tika ete Banganga-Nzambe na Yo balata lobiko lokola elamba ; mpe tika ete basantu na Yo basepela na boboto na Yo !
Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.
bawumbu na Ngai bakoyemba na esengo, esengo oyo ekowuta solo na mitema na bango, kasi bino bokoganga mpo na pasi ya mitema na bino mpe bokolelalela mpo na milimo na bino oyo ebukani.
Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.
Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »
Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo ! Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasi lokola moyi ya midi ! Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei.