Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 132:6 - Mokanda na Bomoi

6 Toyokaki sango na tina na yango na Efrata, tomonaki yango na elanga ya Yari.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 132:6
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Rasheli akufaki mpe bakundaki ye na nzela ya Efrata, elingi koloba Beteleemi.


Batiaki Sanduku ya Nzambe na likolo ya shario ya sika mpe bamemaki yango wuta na ndako ya Abinadabi, oyo ezalaki na likolo ya ngomba moke. Ezalaki Uza mpe Ayiyo, bana mibali mibale ya Abinadabi, nde bazalaki kotambolisa shario yango oyo ya sika.


Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.


Kombo ya mobali yango ezalaki « Elimeleki ; » kombo ya mwasi na ye ezalaki « Naomi ; » mpe bakombo ya bana na ye ya mibali ezalaki « Maaloni » mpe « Kilioni. » Bazalaki bato ya libota ya Efrate mpe bawutaki na Beteleemi ya Yuda. Bakendeki na Moabi mpe bavandaki kuna.


Davidi azalaki mwana mobali ya moto moko ya Efrate, oyo kombo na ye ezalaki « Izayi. » Izayi awutaki na Beteleemi ya Yuda mpe azalaki na bana mibali mwambe. Na tango Saulo azalaki mokonzi, Izayi akomaki mobange mpo ete mibu na ye ya mbotama epusanaki makasi.


Bato ya Kiriati-Yearimi bayaki kozwa Sanduku ya Yawe mpe bamemaki yango na ndako ya Abinadabi, na ngomba moke ; mpe babulisaki Eleazari, mwana na ye ya mobali, mpo ete abatelaka Sanduku ya Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ