Batielaki ye lisusu biloko ya kolia, kasi alobaki : — Nakoki kolia te kino nakosilisa koloba makambo nyonso oyo nazali na yango. Labani alobaki na ye : — Yebisa biso makambo yango.
Bongo Naomi alobaki na ye : — Sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, vanda awa kino okomona ndenge makambo oyo ekosuka ; pamba te mobali wana akozala na kimia te kino akosilisa likambo oyo, kaka na mokolo ya lelo.