Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 132:16 - Mokanda na Bomoi

16 Nakolatisa Banganga-Nzambe na yango lobiko, mpe bato na yango bakoganga na esengo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 132:16
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, telema mpe yaka na esika na Yo ya bopemi, Yo elongo na Sanduku ya nguya na Yo ! Oh Yawe Nzambe, tika ete Banganga-Nzambe na Yo balata lobiko lokola elamba ; mpe tika ete basantu na Yo basepela na boboto na Yo !


Tika ete Banganga-Nzambe na Yo balata bosembo lokola elamba ; mpe tika ete basantu na Yo baganga na esengo !


Bapelisaka lolemo na bango lokola nyoka, bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.


Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.


Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.


Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.


pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ