Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 132:12 - Mokanda na Bomoi

12 Soki bana na yo babateli boyokani mpe mibeko na ngai, bana na bango mpe bakokitana na yo lokola bakonzi, mpe ekosalema bongo mpo na libela. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 132:12
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe mpo ete Yawe akokisa elaka oyo apesaki ngai na maloba oyo : « Soki bakitani na yo basali keba na etamboli na bango, soki batamboli liboso na ngai na bosembo, na mitema na bango mobimba, ekozala tango nyonso na moko kati na bakitani na yo, oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele.


Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, kokisa mpe elaka mosusu oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, tango olobaki na ye : ‹ Okozangaka te moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele, na miso na Ngai, soki bana na yo bakotambola malamu liboso na Ngai mpe bakotosa mibeko na Ngai, ndenge yo otamboli kolanda mokano na Ngai. ›


nakolendisa kiti na yo ya bokonzi kolanda boyokani oyo nasalaki elongo na Davidi, tata na yo, tango nalobaki : « Okotikalaka kozanga te mokitani mpo na kokamba Isalaele lokola mokonzi. »


Kasi Yo, ozali ndenge moko, mibu na Yo ekotikala kosuka te.


Tika ete Yawe afulukisa bino, bino mpe bana na bino !


« Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango : Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.


Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Davidi akozalaka tango nyonso na moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya libota ya Isalaele ;


Kasi azalaki mosakoli mpe ayebaki ete Nzambe apesaki ye elaka, na nzela ya ndayi, ete moko kati na bakitani na ye akovanda na kiti na ye ya bokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ