Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 131:2 - Mokanda na Bomoi

2 Kasi nabatelaki kimia kati na motema na ngai mpe namitungisaki te lokola mwana moke elongo na mama na ye. Nazali na kimia lokola mwana oyo mama alongola na mabele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 131:2
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi tango bayini na ngai bafingaka ngai, tango balobaka na ngai mokolo mobimba : « Wapi Nzambe na yo ? »


Nazalaka na posa ya kokanisa makambo oyo, ndenge mpe nasopaka molimo na ngai : Tango nazalaki kotambola kati na ebele ya bato, nazalaki komema bango kino na Tempelo ya Nzambe, kati na koganga ya esengo mpe ya kozongisa matondi lokola makelele ya bato oyo bazali na feti.


Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ? Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakosanzola Ye lisusu, Mobikisi mpe Nzambe na ngai.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi.


Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Ekozala kati na kobongola mitema mpe kimia nde bokozwa lobiko na bino ; ekozala na nzela ya kimia mpe ya elikya nde bokozwa makasi na bino ; kasi bino, bolingi bongo te.


Ezali malamu kozela na kimia lobiko kowuta na Yawe !


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.


Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike ; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike ; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo.


Alobaki na Saulo : — Mpo na nini olandaka maloba ya bato oyo balobaka na yo ete Davidi azalaka na posa ya kosala yo mabe ?


Davidi ayokaki pasi makasi na motema, pamba te bato bazalaki komibongisa mpo na koboma ye na mabanga, mpo ete moto nyonso azalaki na pasi na motema mpo na bana na ye ya mibali mpe ya basi. Kasi Davidi amilendisaki kati na Yawe, Nzambe na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ