6 Nazali na elikya kati na Nkolo koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo, koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo.
Nalamukaka liboso ete tongo etana mpo na kobelela Yo, nazali na elikya kati na liloba na Yo.
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Bopambola Yawe, bino nyonso, basali ya Nkolo, oyo botelemaka na butu kati na Ndako ya Nkolo.
Sik’oyo, oh Nkolo, nazela lisusu nini ? Natiaka elikya na ngai kati na Yo.
Nakotonda lokola moto oyo asili kolia misuni kitoko mpe mafuta ; bibebu na ngai ekoganga na esengo mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.
Boye, mokengeli agangaki lokola nkosi : « Nkolo, mokolo mobimba, natelemaka na likolo ya ndako molayi ya kokengela ; mpe butu nyonso, natikalaka kaka se wana.
Lokola bazalaki kobanga ete masuwa etutana na mabanga, babwakaki balongo minei na mayi wuta na sima ya masuwa, na posa makasi ya komona tongo kotana.