Tika ete moto mabe atika banzela na ye, mpe tika ete mosumuki atika makanisi na ye ; tika ete azonga epai na Yawe mpo ete ayokela ye mawa, tika ete azonga epai ya Nzambe na biso, pamba te alimbisaka kaka.
Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba : ‹ Yeba Yawe ! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »
Sima na yango, bana ya Isalaele bakozongela mpe bakoluka Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi na bango ; bakobelema epai na Yawe, na kolenga nyonso, mpo na kozwa mapamboli na Ye, na mikolo oyo ekolanda.
Kati na Yuda mobimba, Galile mpe Samari, Lingomba ezalaki na kimia, ezalaki kolenda mpe kotosa Nkolo, mpe motango ya bandimi na yango ezalaki kobakisama na lisungi ya Molimo Mosantu.
Pamba te, kati na Klisto, Nzambe azalaki kozongisa boyokani kati na bato mpe Ye moko, na kotala masumu na bango te. Mpe atiaki kati na biso liloba ya boyokanisi.