Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe. Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te, oyo epikama mpo na libela.
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tango Yawe azongisaki bato ya Siona longwa na bowumbu, tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto.
Yawe, tango ogangelaki yango, na nzela ya pema na Yo mpe ya milinga ya zolo na Yo, nzela oyo mayi ya ebale elekelaka ebimaki, miboko ya mokili emonanaki na libanda.
Nzambe, molimo na ngai elembi kati na ngai ; yango wana nazali kokanisa Yo wuta na mokili ya Yordani, wuta na songe ya ngomba Erimoni mpe wuta na ngomba Mitseari.
Atako osalaki ete tokutana na pasi mingi mpe na makambo ya bololo, kasi okotika lisusu biso kozala na bomoi, okobimisa ngai lisusu wuta na mozindo ya mabele.
Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.