Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 13:4 - Mokanda na Bomoi

4 Yawe, Nzambe na ngai, tala mpe yanola ngai. Sala ete miso na ngai emona malamu ; soki te, nakokufa,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 13:4
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, na mwa tango moke, osaleli biso ngolu ya kobikisa ndambo ya bato kati na biso mpe ya kopesa biso esika kati na mokili na Yo ya bule. Na boye, Yo Nzambe na biso, ongengisi miso na biso na pole mpe opesi biso lisungi kati na bowumbu na biso.


Amilobelaka : « Nzambe akotikala koyeba te, abombaka elongi na Ye mpe akotikala komona te. »


Solo, aninganaka ata moke te. Bakanisaka misala ya moto ya sembo tango nyonso.


Nzambe na ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo ; sala ete nayoka soni te, mpe banguna na ngai basepela te na tina na ngai.


Tika ete banguna na ngai basepela te na tina na ngai ; tika ete bayini na ngai na kozanga tina bakanga miso te.


Tika ete bamilobela te : « Ah ! Tala makambo oyo tozalaki koluka ! » Tika ete baloba te : « Tolie ye. »


Yawe, natiaka elikya na ngai kati na Yo ; oh Nkolo, Nzambe na ngai, solo, okoyanola.


Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.


Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ; lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.


Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe, pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye.


Kasi Nzambe akotikala te kobosana mobola, mpe elikya ya banyokolami ekotikala seko na seko.


Motema mabe elendisaka moto te ; mosisa ya bato ya sembo ekatanaka te.


Yeba ete bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te ; pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, elobi Yawe.


Tala tina nini nazali kolela mpe miso na ngai etondi na mpinzoli ; moto moko te ayei pene na ngai mpo na kobondisa ngai, moto moko te ayei kolendisa molimo na ngai. Bana na ngai bazali na pasi, mpo ete monguna aleki ngai na makasi.


Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ