Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 128:5 - Mokanda na Bomoi

5 Solo, Yawe akopambola yo wuta na Siona, mpe okomona bofuluki ya Yelusalemi mikolo nyonso ya bomoi na yo

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 128:5
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Tozali kopambola bino wuta na Tempelo ya Yawe.


Bosenga kimia ya Yelusalemi ! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia !


Tika ete Yawe apambola bino, wuta na Siona, Ye oyo asala likolo mpe mabele !


Tika ete, wuta na Siona, Yawe apambolama, Ye oyo avandaka na Yelusalemi ! Bokumisa Yawe !


Tika ete Yawe ayanola yo na tango ya pasi ; tika ete Nzambe ya Jakobi azala ndako batonga makasi mpo na kobatela yo.


Tika ete asunga yo wuta na Esika na Ye ya bule mpe apesa yo makasi wuta na Siona.


Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi. Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.


Tala Siona, engumba ya bafeti na biso ya minene, miso na yo ekomona Yelusalemi, ndako ya kimia, ndako ya kapo oyo ekopikama makasi ; bakokoka kopikola makonzi na yango te, mpe basinga na yango ekokatana te.


Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ