3 Kati na ndako na yo, mwasi na yo azali lokola nzete ya vino oyo ebotaka bambuma ebele ; bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo.
Bana mibali ya Ulami bazalaki basoda ya mpiko oyo bayebaki kosalela tolotolo. Bazalaki na bana mibali mpe bakoko ya mibali ebele : nkama moko na tuku mitano. Bango nyonso bazalaki bakitani ya Benjame.
Esengo na moto oyo atondisi makonga kati na ebombelo na ye ya makonga ! Akokufa soni ata moke te tango akosamba elongo na banguna na ye na ekuke ya engumba.
Bana mibali na biso bazali lokola milona, bazali kokola malamu wuta na bomwana na bango ; bana basi na biso bazali lokola bililingi kitoko oyo batoboli na bamir ya ndako ya mokonzi.
Yawe azalaki kobenga yo « Nzete ya olive ya mobesu oyo etonda na mbuma kitoko. » Kasi Yawe akotumba yango na makelele ya mopepe makasi, mpe bitape na yango ekobukana-bukana.
Mama na yo azalaki lokola nzete ya vino kati na elanga na yo ya vino, oyo elonama pembeni ya mayi, ezalaki kobota bambuma ebele, ezalaki na bitape ebele mpo ete mayi mpe ezalaki ebele.
Boye, soki yo owutaki na nzete ya olive ya zamba oyo ebimisaki yo mpe bakangisaki yo na nzete ya olive oyo balona, ezala soki yango te nde ebimisaki yo, ndenge nini bakoki te kozongisa bitape ya nzete oyo ebimisaki yango na nzete na yango ?