Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 128:2 - Mokanda na Bomoi

2 Oliaka mbuma ya mosala na Yo ; ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 128:2
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »


Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te ; misala na ye nyonso etambolaka malamu.


Tika ete moto oyo adefisaki ye mbongo akanga ye biloko nyonso, mpe tika ete bapaya babotola ye bambuma ya mosala na ye !


Atako moto oyo asalaka masumu asali mabe mbala nkama moko mpe awumeli tango molayi na bomoi, nayebi solo ete bato oyo batosaka Nzambe bakozala bato ya esengo ; pamba te bazali na botosi liboso na Ye.


Loba na moto ya sembo : « Bolamu ekobila yo, pamba te okosepela na mbuma ya misala na yo. »


Yawe atomboli loboko na Ye ya mobali, loboko na Ye ya nguya, mpe alapi ndayi : « Nakopesa lisusu ble na yo te lokola bilei epai ya banguna na yo ; bapaya bakomela lisusu te vino na yo ya sika oyo omonelaki pasi ;


Mpo na yango, Nkolo Yawe alobi : « Bawumbu na Ngai bakolia, kasi bino bokozala na nzala ; bawumbu na Ngai bakomela, kasi bino bokotikala kaka na posa ya komela ; bawumbu na Ngai bakosepela, kasi bino bokoyoka soni ;


Okanisi ete kotondisa ndako na mabaya ya sedele nde ekolendisa bokonzi na yo ? Tata na yo azangaki bilei mpe masanga te, kasi atambolaki na bosembo mpe na boyengebene ; boye alongaki na makambo nyonso.


Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.


mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili.


Yawe akotondisa bino na bozwi ebele : mabota, bibwele, milona kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino.


Bokosala mpe bokobongisa bilanga ya vino, kasi bokotikala te komela vino yango mpe kobuka bambuma na yango, pamba te banyama mike oyo eliaka nzete ekobebisa yango.


Mabota na bino ekopambolama ; milona na bino mpe bibwele na bino : bangombe na bino, bameme mpe bantaba na bino ekopambolama.


Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.


Yawe Nzambe akopambola bibombelo na bino ya biloko mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Yawe Nzambe akopambola bino na mokili oyo azali kopesa bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ