Banzembo 127:1 - Mokanda na Bomoi1 Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe atongi ndako te, batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ; soki Yawe akengeli engumba te, bakengeli bazali kosala na pamba. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi : mimekano ezalaka kaka te mpo na moto oyo aleki mbangu, bitumba ezalaka kaka te mpo na bato ya makasi, bilei ezalaka kaka te mpo na bato ya bwanya, bomengo ezalaka kaka te mpo na bato oyo baleki na mayele, mpe bolamu ezalaka kaka te mpo na bato ya bososoli ; pamba te pasi mpe bisengo ekomelaka mpe bango nyonso.