Ata bangomba milayi eningani, ata bangomba mikuse elongwe na bisika na yango, bolingo na Ngai epai na yo ekoningana te, mpe boyokani na Ngai ya kimia ekotikala kolongwa te, elobi Yawe oyo alingaka yo.
Bayebi nzela ya kimia te, mpe bosembo ezali na nzela na bango te ; bakomisaka nzela na bango nyoka-nyoka, moko te oyo akotambola na nzela yango akotikala koyeba kimia.
Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Nakosala boyokani ya kimia elongo na bango : ekozala boyokani ya libela na libela. Nakolendisa bango, nakokomisa bango ebele koleka mpe nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela.
Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !
mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili
Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki !