2 Soki Yawe abatelaki biso te tango bato babundisaki biso,
Makasi na ngai ekawuki lokola potopoto, mpe nazali kokoka lisusu koloba te ; otie ngai pembeni ya lilita.
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye.
Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni ! Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai !
Moto mabe atalaka moto ya sembo na miso mabe mpe alukaka nzela ya koboma ye,
Bongo, na mokolo oyo nakobelela mpo na kosenga lisungi, banguna na ngai bakozonga sima. Na nzela ya likambo yango, nakoyeba ete Nzambe azali mpo na ngai.