Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe. Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te, oyo epikama mpo na libela.
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tango Yawe azongisaki bato ya Siona longwa na bowumbu, tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto.
Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe : Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, mpo ete amonisi monene ya nkembo na Ye ! Azindisi mpunda mpe motambolisi na yango kati na ebale monene.
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, motema na ngai ezali na lofundu te, miso na ngai ezali na posa makasi te ; namipesaka te na makambo oyo eleki ya minene mpe eleki pasi mpo na ngai.
Soki Nzambe ya tata na ngai, Nzambe ya Abrayami mpe oyo Izaki abangaka, azalaki elongo na ngai te, ya solo, olingaki kozongisa ngai lelo maboko pamba. Kasi Nzambe amonaki minyoko na ngai mpe pasi ya mosala ya maboko na ngai, yango wana apamelaki yo na butu oyo eleki.
Bongo, na mokolo oyo nakobelela mpo na kosenga lisungi, banguna na ngai bakozonga sima. Na nzela ya likambo yango, nakoyeba ete Nzambe azali mpo na ngai.