Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 123:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tolembi penza kotiolama na bato ya lolendo mpe ya lofundu !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 123:4
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi tango Sanibala, moto ya Oroni ; Tobiya, kalaka ya mboka Amoni ; mpe Geshemi, moto ya mboka Arabi, bayokaki sango na yango, basekaki mpe batiolaki biso. Balobaki : — Eloko nini oyo bozali kosala ? Bozali kotombokela mokonzi ?


Bato ya esengo basekaka bato oyo bazali na pasi, babetaka bato oyo batepaka-tepaka kisambeti.


Ngai mpe nakokaki koloba lokola bino, soki bozalaki na esika na ngai, nakokaki kobimisa maloba ebele mpe koningisa moto mpo na bino.


Solo, bato ya lolendo batiolaki ngai makasi ; kasi ngai, natikalaki kopengwa te na mibeko na Yo.


Bolenga, bino basi oyo bovandaka na kimia ; boningana, bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te ! Bolongola bilamba na bino mpe botikala bolumbu, bolata basaki na loketo na bino !


Bino basi oyo bovandaka na kimia, botelema mpe boyoka ngai ; bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te, boyoka makambo oyo nalingi koloba :


Moabi ezalaki na kimia wuta bolenge na yango lokola masanga ya vino oyo baningisi te, oyo babongoli na mbeki mosusu te, mpo ete etikala nanu kokende na bowumbu te. Boye, elengi na yango ebongwana te mpe solo na yango etikala kaka ndenge ya kala.


Boni, Isalaele azalaki eloko ya maseki te na miso na bino ? Bokangaki ye kati na miyibi mpo ete bokoma koseka ye tango nyonso bokolobela kombo na ye ?


Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, lolendo oyo eleka penza ndelo ! Tala ndenge amatisaka mapeka ! Atondi na lofundu, azali na monoko makasi, mpe motema na ye emikitisaka te.


Mawa na bino oyo bomimonaka ete bokoka kati na Siona, mpe na bino oyo bokanisaka ete bozali na kimia na likolo ya ngomba Samari, bino bato ya lokumu ya ekolo oyo ekenda sango koleka bikolo mosusu epai wapi bana ya Isalaele bayaka !


(Bato nyonso ya Ateni mpe bapaya oyo bazalaki kovanda kuna bazalaki kolekisa tango mingi mpo na koloba mpe koyoka basango ya sika).


Tango bayokaki Polo koloba na tina na lisekwa ya bakufi, bamoko basekaki ye, mpe bamosusu balobaki : — Tokoyoka yo mokolo mosusu na tina na likambo oyo.


Wana Polo azalaki nanu koloba, Festisi akataki ye maloba mpe agangelaki ye : — Ozali na liboma, Polo ! Boyebi oyo otondi na yango ekomisi yo liboma !


tango bakoselaka biso makambo mpo na kobebisa lokumu na biso, tozongisaka kaka na maloba ya boboto. Mpe kino sik’oyo, tokomi lokola bosoto ya mokili, mpe lokola lisapo ya bato.


Tango moto ya Filisitia atalaki mpe amonaki Davidi, atiolaki ye ; pamba te azalaki na ye kaka mwa elenge mobali oyo azalaki na poso kitoko ya nzoto mpe na elongi kitoko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ