Tango Sanduku ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa ; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina liboso ya Yawe, ayinaki ye kati na motema na ye.
Balobaki na ye : — Tala makambo oyo Ezekiasi alobi : « Mokolo ya lelo ezali mokolo ya pasi, mokolo ya etumbu mpe mokolo ya soni, pamba te tokomi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota kasi azangi makasi ya kobimisa mwana.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.
Nakosala ete boyoka lisusu kotiolama ya bikolo mosusu te, mpe bato ya bikolo mosusu bakofinga bino lisusu te ; na bongo, bokokweyisa lisusu ekolo na bino te, elobi Nkolo Yawe. › »
Mpo na yango, sakola na tina na mokili ya Isalaele mpe loba na bangomba ya milayi mpe ya mikuse, na mabulu mpe na mabwaku : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nazali koloba na zuwa mpe na kanda na Ngai ya makasi, pamba te bikolo mosusu emonisi bino pasi na kotiola.