Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 122:9 - Mokanda na Bomoi

9 Likolo ya bolingo na ngai mpo na Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso, nasengi bolamu mpo na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 122:9
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe lisusu, na tina na bolingo na ngai mpo na Ndako ya Nzambe na ngai, napesi sik’oyo wuta na bozwi na ngai moko : wolo mpe palata mpo na Ndako ya Nzambe na ngai likolo ya nyonso oyo nabongisaki mpo na Ndako oyo ya bule :


Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai mpo na makambo oyo nyonso ; kobosana te misala nyonso oyo nasali na boyengebene mpo na Ndako ya Nzambe na ngai mpe mpo na misala na yango !


Tango kaka Sanibala, moto ya Oroni, mpe Tobiya, kalaka ya mboka Amoni, bayokaki ete nazali koya, basepelaki ata moke te komona moto moko koya mpo na bolamu ya bana ya Isalaele.


Moyuda Maridoshe azalaki moto ya mibale kati na bokonzi sima na mokonzi Kizerisesi. Maridoshe azalaki moto monene mpe ya lokumu na miso ya Bayuda, bandeko na ye ; pamba te azalaki koluka bolamu ya bato na ye mpe kobundela bolamu ya Bayuda nyonso.


Yawe, nasepelaka na Tempelo epai wapi ovandaka elongo na nkembo na Yo.


Bandeko na ngai bakomi kozwa ngai lokola moto oyo bayebi te, nakomi lokola mopaya na miso ya bana ya mama na ngai.


Oh Nzambe, Yo oyo ozali nguba na biso, tala ! Tala elongi ya mopakolami na Yo !


Bayekoli na Ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama : « Oh Nzambe, bolingo makasi oyo nazali na yango mpo na Ndako na Yo ekozikisa ngai lokola na moto ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ