Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 122:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bosenga kimia ya Yelusalemi ! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 122:6
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakopambola bato oyo bakopambola yo, mpe nakolakela mabe moto oyo akolakela yo mabe ; mpe bato ya bituka nyonso ya mabele bakomipambola mpo na yo. »


Bakambi ya bato bayaki kovanda na Yelusalemi. Ndambo mosusu kati na bato babetaki zeke mpo ete moto moko kati na bato zomi aya kovanda na Yelusalemi, engumba ya bule ; mpe mpo ete bato libwa oyo batikali bavanda kati na bingumba na bango.


Bato bapambolaki moto nyonso oyo amipesaki ye moko mpo na kovanda na Yelusalemi.


Maridoshe apesaki lisusu Ataki mokanda ya mobeko oyo mokonzi abimisaki, mpo ete ye Ataki alakisa yango epai ya Ester, alimbolela ye yango mpe akomisa epai ya Ester mitindo na ye ete Ester akende epai ya mokonzi mpo na kotungisa ye mpe kobondela mawa ya mokonzi mpo na bato na ye Ester ; pamba te mokonzi asili kobimisa mobeko ya koboma Bayuda mpe sango na yango esili kopanzana kati na engumba Size.


Mpo ete osepelaka na mbeka te, nakobonza te mbeka ya kotumba oyo ondimaka te.


mpe botikela Ye te tango ya kopema kino tango akozongisa kimia na Yelusalemi mpe akokomisa yango mboka ya lokumu kati na mokili !


« Bosepela elongo na Yelusalemi mpe botonda na esengo mpo na ye, bino nyonso oyo bolingaka ye ; bosepela makasi elongo na ye, bino nyonso oyo bosalelaki ye matanga.


Boluka kimia mpe bolamu ya engumba epai wapi namemaki bino na bowumbu ; bobondela Yawe mpo na yango, pamba te soki yango ebongi, bino mpe bokozala malamu. »


Bino bato oyo bobiki na mopanga, bokima, bolekisa tango te ! Wuta na mokili ya mosika, bokanisa Yawe mpe Yelusalemi !


Bagunzamaka mpe balalaka lokola nkosi ya mobali, lokola nkosi ya mwasi ; nani akokoka kotelemisa bango ? Tika ete oyo akopambola yo apambolama, mpe oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ! › »


mpo ete bango nyonso bazala moko ndenge Yo Tata ozali kati na Ngai, mpe Ngai kati na Yo ; ete bango mpe bazala moko kati na biso, mpe ete mokili endima ete ezali Yo nde otindaki Ngai.


bosalaka makasi mpo na kobatela bomoko ya Molimo na nzela ya kimia oyo esangisi bino.


Tika ete Ye moko Nkolo na kimia apesaka bino kimia tango nyonso mpe na lolenge nyonso ! Tika ete Nkolo azala elongo na bino nyonso !


Toyebi ete tosila kolongwa na kufa mpe tokoma na bomoi mpo ete tolingaka bandeko na biso. Moto oyo alingaka ndeko na ye te azali nanu na se ya bokonzi ya kufa.


Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino ! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ