Roboami aponaki Abiya, mwana mobali ya Maaka, mpo ete azala mokambi ya liboso ya bandeko na ye ya mibali, pamba te azalaki na makanisi ya kokomisa ye mokonzi.
Kati na Yelusalemi, Jozafati aponaki Balevi, Banganga-Nzambe mpe bakambi ya mabota ya Isalaele mpo na kosambisa kolanda Mibeko ya Yawe mpe kokata makambo ya bavandi ya Yelusalemi.
Tango mokonzi yango akovanda na kiti na ye ya bokonzi, akozwa buku ya Mobeko epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe akokoma makambo oyo ezali na buku yango mpo na ye moko.