Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 122:4 - Mokanda na Bomoi

4 Ezali kuna nde mabota ekendaka, mabota ya Yawe, kolanda mibeko kati na Isalaele, mpo na kosanzola Kombo ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 122:4
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi, bokota na lopango na Ye na kokumisa. Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.


Bofungolela ngai bikuke ya bosembo mpo ete nakota mpe nakumisa Yawe.


Pamba te Yawe aponaki Siona, asepelaki kokomisa yango Esika na Ye ya kovanda :


kasi aponaki libota ya Yuda, ngomba Siona oyo alingaki ;


Atiaki yango lokola mobeko mpo na Jozefi tango abundisaki Ejipito. Nazali koyoka lokota oyo nayebi te :


Ndenge kaka Yawe atindaki Moyize, Aron atiaki mana yango liboso ya Sanduku ya Boyokani mpo ete ebombama malamu.


Mbala misato na mobu, bato nyonso bakoya liboso ya Nkolo Yawe.


Moyize abalukaki mpe akitaki wuta na ngomba, elongo na bitando mibale ya mabanga ya boyokani na maboko na ye ; mabanga yango ekomama na bangambo mibale, na liboso mpe na sima.


Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.


Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende.


Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli kokende liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo Ye akopona : na feti ya Mapa ezanga levire, na feti ya Baposo, mpe na feti ya Bandako ya kapo. Moko te akokende liboso ya Yawe, maboko pamba :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ