Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 122:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Nasepelaka tango balobaka na ngai : « Tokende na Tempelo ya Yawe ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 122:1
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Malako na Yo ezali libula na ngai mpo na libela, esalaka esengo ya motema na ngai.


Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe ayanolaki ngai.


Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba : lisungi na ngai ekowuta wapi ?


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai epai na Yo, Yawe, oyo ovandi na Kiti na Yo ya Bokonzi kati na Lola.


Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe abatelaki biso te ; tika ete Isalaele aloba bongo !


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe. Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te, oyo epikama mpo na libela.


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tango Yawe azongisaki bato ya Siona longwa na bowumbu, tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto.


Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe atongi ndako te, batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ; soki Yawe akengeli engumba te, bakengeli bazali kosala na pamba.


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe alandaka banzela na Ye !


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele. Tika ete Isalaele ezongela koloba :


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Nkolo, nazali kobelela Yo wuta na mozindo ya pasi !


Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, motema na ngai ezali na lofundu te, miso na ngai ezali na posa makasi te ; namipesaka te na makambo oyo eleki ya minene mpe eleki pasi mpo na ngai.


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, kanisa Davidi ; kanisa pasi na ye nyonso !


Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Bopambola Yawe, bino nyonso, basali ya Nkolo, oyo botelemaka na butu kati na Ndako ya Nkolo.


Yawe, nasepelaka na Tempelo epai wapi ovandaka elongo na nkembo na Yo.


Butu mpe moyi, mpinzoli na ngai ezalaka bilei na ngai ; pamba te balobaka na ngai tango nyonso : « Nzambe na Yo azali wapi ? »


Kasi ezali yo, moto lokola ngai, oyo otambolaka elongo na ngai, molingami mpe moninga na ngai ya motema


Oh Nzambe, Yo oyo ozali nguba na biso, tala ! Tala elongi ya mopakolami na Yo !


Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi. Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.


Ekozala mokolo oyo bakengeli bakoganga na bangomba ya Efrayimi : ‹ Boya ! Tika ete tokende na Siona, epai na Yawe, Nzambe na biso ! › »


Mokambi akozala kati na bato na ye, akokota mpe akobima elongo na bango.


Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi ! Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ