Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 121:5 - Mokanda na Bomoi

5 Yawe azali mobateli na yo ; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 121:5
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te atelemaka na ngambo ya loboko ya mobali ya mobola mpo na kokangola ye wuta na maboko ya bato oyo bakatela ye etumbu.


Natalelaka Yawe tango nyonso, pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.


Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Yawe atambolaki liboso na bango, na moyi lokola likonzi ya lipata mpo na kolakisa bango nzela, mpe na butu lokola likonzi ya moto mpo na kongengisa bango, mpo ete batambola butu mpe moyi.


Ozalaki ekimelo mpo na mobola, ekimelo mpo na moto oyo akelela, na tango ya pasi, ebombamelo na tango ya mvula makasi mpe pio na tango ya molunge. Pamba te pema ya banyokoli ezali lokola mvula ya makasi oyo ebukaka bamir ;


Moko na moko kati na bango akozala lokola ekimelo liboso ya mopepe mpe ebombamelo liboso ya mvula ya makasi ; akozala lokola miluka ya mayi kati na esobe, lokola elili ya libanga monene kati na mokili ya mabele ekawuka.


Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ