3 Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ; Ye oyo abatelaka yo animbaka te.
Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe atongi ndako te, batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ; soki Yawe akengeli engumba te, bakengeli bazali kosala na pamba.
Esengo na moto oyo akanisaka mobola ! Yawe akokangola ye na tango ya pasi.
Bwakela Yawe mokumba na yo, akosunga yo ; akotika te ete moto ya sembo akweya mpo na libela.
Asalaka ete totangama kati na bato ya bomoi. Abatelaki makolo na biso mpo ete tokweya te.
Bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te ;
Pamba te abatelaka bayengebene mpe nzela ya bato oyo batosaka Ye.
Boye, okotambola na kimia na nzela na yo, mpe lokolo na yo ekobeta libaku te.
pamba te Yawe akozala elikya na yo mpe akobatela makolo na yo mpo ete ekangama te na motambo.
Ngai Yawe, nabatelaka yango, nasopelaka yango mayi tango nyonso, nakengelaka yango butu mpe moyi mpo ete moto moko te abebisa yango.
ba-oyo Nzambe abatelaka na nguya na Ye, na nzela ya kondima, mpo na lobiko oyo ekomonisama na tango ya suka.
Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.