7 Maloba ya Yawe ezalaka peto lokola palata oyo balekisi na moto mpe bapetoli mbala sambo.
mpo na kolongisa mwana etike mpe monyokolami ; boye, bato ya mokili bakobangisa lisusu te.
Nzokande liloba na Yo ezali penza peto ; mpe ngai, mosali na Yo, nalingaka yango.
Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.
Yawe abatelaka bato nyonso oyo balingaka Ye, kasi abebisaka bato nyonso ya mabe.
Nzembo ya Davidi. Nzambe, batela ngai, pamba te nabombami kati na Yo.
Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka, Liloba na Yawe ezali na mbeba te ; azali nguba mpo na bato nyonso oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.
Mitindo ya Yawe ezali alima, esepelisaka motema ; malako na Ye ezali peto, epesaka bososoli.
pamba te Yawe alingaka bosembo, mpe asundolaka te bayengebene na Ye. Babatelamaka mpo na seko, kasi bana ya bato mabe bakolimwa.
Yawe asungaka mpe akangolaka bango, akangolaka bango wuta na maboko ya bato mabe mpe abikisaka bango, pamba te babombamaka kati na Ye.
Ngai Yawe, nabatelaka yango, nasopelaka yango mayi tango nyonso, nakengelaka yango butu mpe moyi mpo ete moto moko te abebisa yango.
Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ?
Solo, olingaka bato, basantu nyonso basimbami na loboko na Yo. Na makolo na Yo, bango nyonso bagumbamaka. Ezali epai na Yo nde bazwaka mateya.
ba-oyo Nzambe abatelaka na nguya na Ye, na nzela ya kondima, mpo na lobiko oyo ekomonisama na tango ya suka.
Ngai Jide, mowumbu ya Yesu-Klisto mpe ndeko ya Jake ; Epai ya bato oyo Nzambe abenga, ba-oyo Nzambe Tata alingaka, mpe ba-oyo babatelami mpo na Yesu-Klisto :
Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.