Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 12:2 - Mokanda na Bomoi

2 Yawe, sunga biso ! Pamba te bayengebene bazali lisusu te ; bato ya kotiela motema bazali lisusu te kati na bana na bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 12:2
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kati na libota ya Isakari : bakambi nkama mibale bayaki elongo na bato oyo bango bazalaki kokamba kati na libota na bango ; bazalaki na mayele ya kososola tango mpo na kolakisa Isalaele lolenge ya kosala liboso ya makambo ;


Monoko na ye etonda na bilakeli mabe, lokuta mpe mangungu ; abongisaka kaka pasi mpe mabe.


Kati na mitungisi na ngai, nazalaki komilobela : « Bato nyonso bazali bakosi. »


Bikisa mpe kangola ngai na maboko ya bapaya oyo minoko na bango elobaka kaka lokuta mpe maboko na bango elapaka ndayi ya lokuta.


oyo minoko na bango elobaka kaka lokuta mpe maboko na bango elapaka ndayi ya lokuta.


Kokumba ngai te elongo na bato mabe, elongo na bato oyo basalaka mabe, oyo balobaka makambo ya kimia epai ya baninga na bango, kasi babombaka mabe kati na mitema na bango.


Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngai bakimi pasi na ngai, ba-oyo bazalaka na ngai esika moko batelemi mosika na ngai.


Banguna na ngai balobaka mabe na tina na ngai : « Akokufa mokolo nini mpo ete kombo na ye etangama lisusu te ? »


Yawe, tambolisa ngai na bosembo na Yo, pamba te nazali na banguna ; bongisa nzela oyo olingi ete natambola na yango.


Abundisi balingami na ye, abebisi boyokani na ye.


Nkolo, nguba na biso, koboma bango te, noki te bato na ngai bakobosana. Na nguya na Yo, sala ete bayengayenga, mpe mema bango kino na se.


Kino tango nini bokosangela moto moko ? Kino tango nini bino nyonso bokosangana mpo na koluka koboma ye lokola mir oyo etengami, lokola lopango oyo esili kokweya ?


Moto ya bilobaloba abimisaka basekele ; yango wana kima bato oyo balobaka mingi.


Bato ebele batatolaka bolamu na bango, kasi nani akomona moto ya sembo ?


Moto oyo alobaka na moninga na ye maloba ya sukali atielaka ye motambo na se ya matambe.


Yango wana, loba na bango : ‹ Tala ekolo oyo eyokaka te maloba ya Yawe, Nzambe na yango, mpe eyokaka pamela te ; solo ezali lisusu te na minoko na bango mpe elimwe penza na bibebu na bango.


Bongo na makambo ya boye, napesa bango etumbu te, » elobi Yawe ? « Nazongisa mabe na mabe te na ekolo ya boye ? »


Bimoniseli mpe masakoli ya lokuta ekozala lisusu te kati na bana ya Isalaele.


Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te ; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.


Bato ya lolenge oyo basalelaka nde mabumu na bango, kasi basalelaka Klisto, Nkolo na biso, te. Bapengwisaka makanisi ya bato ya bindima-ndima na nzela ya maloba na bango ya elengi mpe ya sukali.


Boyebi malamu ete tosalelaki maloba ya sukali te mpe totindikamaki te na posa ya konduka mbongo. Na tina na likambo oyo, Nzambe azali penza Motatoli na biso.


azali moto ya mitema mibale, moto oyo akangamaka na likanisi moko te na nyonso oyo asalaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ