Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 119:9 - Mokanda na Bomoi

9 Ndenge nini elenge akoki kowumela na nzela ya sembo ? Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 119:9
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, kokisa mpe elaka mosusu oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, tango olobaki na ye : « Okozangaka te moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele, na miso na Ngai, soki bana na yo bakotambola malamu liboso na Ngai mpe bakotosa mibeko na Ngai, ndenge yo otamboli kolanda mokano na Ngai. »


Mpe soki mikolo ya feti esili, Yobo azalaki kobengisa bana na ye mpo na kopetola bango. Na tongo-tongo, azalaki kobonza mbeka ya kotumba mpo na moko na moko kati na bango ; pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu bana na ngai basali masumu mpe balakeli Nzambe mabe kati na mitema na bango. » Yobo azalaki kosala bongo tango nyonso.


Pamba te okomaka makambo mabe na tina na ngai mpe okomisi ngai mokitani ya masumu ya bolenge na ngai.


Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.


Ata tango bato bamekaki kopesa ngai kanyaka, nabatelaki kaka maloba na Yo mpo ete natambola te na banzela ya bato ya masumu.


Yawe, kokanisa te masumu mpe botomboki ya bolenge na ngai ; kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo, pamba te ozali malamu.


Bana ya nkosi ezangaka mpe ekufaka nzala, kasi bato oyo balukaka Yawe bakozanga eloko moko.


Mwana na ngai ya mobali, soki bato ya masumu balingi kokweyisa yo, komitika te.


mpo na kopesa mayele epai ya bazoba, mpe boyebi epai ya bilenge.


Bososoli ekobatela yo, mpe mayele ekobomba yo


Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata, bozalaka na bokebi mpo ete bozwa mayele.


namonaki kati na molongo ya bato oyo bazangi mayele, kati na bilenge mibali, elenge mobali moko oyo azangi penza mayele.


Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo ! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.


Sima na mwa mikolo, leki azwaki biloko nyonso oyo azalaki na yango, akendeki na mboka moko ya mosika. Kuna, asakanaki na bozwi na ye, abikaki bomoi ya mobulu.


Bino mpe, bosili kokoma peto mpo na liloba oyo nateyaki bino.


Tango mokonzi yango akovanda na kiti na ye ya bokonzi, akozwa buku ya Mobeko epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe akokoma makambo oyo ezali na buku yango mpo na ye moko.


Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.


Kasi zala makasi mpe yika mpiko, sala keba ete otosa mibeko nyonso oyo Moyize, mowumbu na Ngai, apesaki yo ; komeka te kobima libanda na yango, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo ete okoka kolonga na makambo nyonso oyo okosala.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ