8 Nalingi kotosa mitindo na Yo ; kosundola ngai libela te !
Nalapaki ndayi oyo mpe nakokokisa yango : « Nakotosaka mibeko ya bosembo na Yo. »
Nazali kobelela Yo na motema na ngai mobimba : « Yawe, yanola ngai ; nakotosa mitindo na Yo !
Nasepelaka mingi na malako na Yo mpe nabosanaka liloba na Yo te.
Nazali koyengayenga lokola meme oyo ebungi ; luka ngai, mosali na Yo, pamba te nabosani mibeko na Yo te. »
Kotala lisusu masumu na ngai te, mpe longola bambeba na ngai nyonso.
Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobange mpe suki na ngai ekomi pembe, oh Nzambe na ngai, kotika ngai te, mpo ete natatola makasi na Yo epai ya bato ya ekeke oyo, mpe misala ya nguya na Yo epai ya bato nyonso oyo bakoya sima.
Kobwaka ngai te awa nakomi mobange, kotika ngai te awa makasi na ngai ekomi kosila.
Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.
Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »