6 Na bongo, nakoyoka soni te tango nakotosa mibeko na Yo nyonso.
Solo, okozwa esengo epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe okotombola elongi na yo epai ya Nzambe.
Sunga ngai kolanda elaka na Yo, mpe nakobika ; koyokisa elikya na ngai soni te.
namonaka mpe malako na Yo nyonso alima ; nzokande, nayinaka lokuta nyonso.
Nakangami na malako na Yo ; Yawe, koyokisa ngai soni te.
Tika ete motema na ngai ezanga pamela mpo na kotosa mitindo na Yo, mpo ete nakufa soni te.
Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.
Moto oyo akweyi ata na mobeko moko kaka, atako atosaka mibeko nyonso, abuki nde mibeko nyonso.
Sik’oyo, bana na ngai, bowumela ya kokangama na Klisto mpo ete, na ngonga nyonso oyo akomimonisa, tozala na elikya mpe toyoka soni te na liboso na Ye tango akoya.