41 Yawe, tika ete bolingo ekomela ngai, mpe lobiko na Yo, kolanda elaka na Yo ;
Miso na ngai elembi kozela lisungi kowuta na Yo mpe kokokisama ya bosembo na Yo kolanda elaka na Yo.
Baluka epai na ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda ndenge okata mpo na bato oyo balingaka Kombo na Yo.
Yawe, nazali na posa makasi ya lobiko na Yo ; mibeko na Yo epesaka ngai esengo.
Kati na pasi na ngai, liloba na Yo ebondisaka ; batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo.
Na motema na ngai mobimba, nalukaka kosepelisa Yo ; salela ngai ngolu kolanda bilaka na Yo !
Natondi na posa ya lobiko na Yo, nazali na elikya kati na liloba na Yo.
Tika ete mbonge ya mayi emema ngai lisusu te, mozindo emela lisusu ngai te, mpe libulu ekangamela ngai te !