Nzokande, napesaki bango kaka mobeko oyo : Botosa Ngai, bongo Ngai nakozala Nzambe na bino mpe bino bokozala bato na Ngai ; botambola na nzela nyonso oyo nakolakisa bino mpo ete bozala bato ya esengo.
abatelaka loboko na ye mpo ete esala masumu te, adefisaka te mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, abatelaka mibeko mpe atosaka bikateli na Ngai ; solo, mwana wana akokufa te mpo na masumu ya tata na ye : akozala solo na bomoi.
Moto nyonso oyo akoma mwana na Nzambe akobaka te kosala masumu, pamba te nguya ya bomoi ya bonzambe ezali kosala kati na ye ; akoki te kokoba kosala masumu, pamba te azali mwana na Nzambe.
Toyebi ete moto nyonso oyo abotami na bomoi ya bonzambe akobaka te kosala lisumu ; Ye moko Mwana na Nzambe abatelaka ye, mpe Satana akoki kosala ye mabe te.