Sala makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, alingaka : tambola na banzela na Ye, batela malako mpe bikateli na Ye, mibeko mpe mitindo na Ye, ndenge ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mpo ete olonga na makambo nyonso oyo okosala mpe na bisika nyonso oyo okokende ;
Sik’oyo, bobongisa mitema mpe milimo na bino mpo na koluka Yawe, Nzambe na bino. Bobanda kotonga Esika ya bule ya Yawe Nzambe mpo ete boyeisa Sanduku ya Boyokani ya Yawe mpe biloko ya bule ya Nzambe, na Tempelo oyo ekotongama mpo na Kombo na Yawe. »
Kati na nyonso oyo Ezekiasi asalaki, ezala mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe to mpo na botosi mibeko mpe mitindo, azalaki koluka Nzambe na ye mpe kosala na motema na ye mobimba ; mpe azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala.
Yesu azongiselaki ye : — Moto oyo alingaka Ngai akobatela maloba na Ngai, mpe Tata na Ngai akolinga ye ; bongo tokoya epai na ye mpe tokovanda elongo na ye.