166 Yawe, natielaka Yo motema mpo ete obikisa ngai, mpe natosaka mibeko na Yo.
Oh Yawe, nazali na elikya ete okobikisa ngai !
Yawe, nazali na posa makasi ya lobiko na Yo ; mibeko na Yo epesaka ngai esengo.
Natondi na posa ya lobiko na Yo, nazali na elikya kati na liloba na Yo.
Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; soki bolali na mbeto, bolukaka kososola makambo mpe bovandaka kimia.
Moto oyo abonzaka matondi lokola mbeka, apesaka ngai lokumu ; mpe moto oyo asalaka keba na etamboli na ye, nakotalisa ye lobiko ya Nzambe. »
Ezali malamu kozela na kimia lobiko kowuta na Yawe !
Moto nyonso oyo azwi mokano ya kosala makambo oyo Nzambe alingaka, akososola soki mateya na Ngai ewuti na Nzambe to nazali koloba na ndenge na Ngai moko.