Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 119:118 - Mokanda na Bomoi

118 Obwakaka bato nyonso oyo bapesaka mitindo na Yo mokongo, pamba te mokano na bango ezalaka ya lokuta.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 119:118
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba ; batela ngai mpo ete napengwa te mosika ya mibeko na Yo !


Otelemelaka bato ya lofundu, bato oyo balakelama mabe mpe bapengwaka mosika ya mibeko na Yo.


Mema ngai mosika ya nzela ya lokuta ; mpe, na boboto na Yo, teya ngai mobeko na Yo.


bapengwaki mpe babukaki mibeko ya boyokani, ndenge batata na bango basalaki ; batengamaki lokola tolotolo oyo mbanzi na yango ekeyi na mopanzi ;


Mibu tuku minei, nayinaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki : ‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba, bayebaka banzela na ngai te. ›


Lokuta ezalaka kati na mitema ya bato oyo basalaka mabongisi ya mabe, kasi esengo ezali mpo na bato oyo bakopesaka batoli ya kimia.


Loboko na Yawe ekozala na ngomba oyo, kasi bakonyata-nyata Moabi na mokili na bango ndenge banyataka matiti kati na libulu ya fimie.


Makanisi na ye ekangama na putulu, motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye ; akokoka te komikangola mpe koloba : « Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobali ezali lokuta te ? »


« Nazalaki kaka ngai moko kati na ekamolelo mpo na kokamola vino, moko te kati na bato ya bikolo nyonso azalaki elongo na ngai. Nanyataki-nyataki bango na kanda na ngai mpe nakamolaki bango na kanda na ngai ya makasi ; makila na bango epumbwelaki ngai na bilamba mpe ebebisaki bilamba na ngai nyonso.


Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya ; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.


mpo ete bobwaka etamboli na bino ya kala, etamboli ya bomoto na bino ya kala, oyo ebebaka na nzela ya baposa ya lokuta,


Tika ete moko te akosa bino na maloba ezanga tina, pamba te ezali mpo na biloko ya ndenge wana nde kanda ya Nzambe ekweyelaka bato oyo batosaka Ye te.


Kasi bato mabe mpe ba-oyo bakosaka baninga bakozala kozinda kati na mabe, kokosa bato mosusu, mpe bango moko bakokosa bango.


Ngai nakomeli bino mpo ete boyebi yango mpe mpo ete lokuta moko te ewutaka na solo ; kasi ezali te mpo boyebi yango te.


Bakamolaki bambuma yango na libanda ya engumba kati na ekamolelo, mpe makila ebimaki wuta na ekamolelo yango, etondaki kino kokoma na bosanda ya monoko ya mpunda, mpe epanzanaki na etando ya bakilometele pene nkama misato.


Mwinda ekopela lisusu te kati na yo, mpe mongongo ya mobali mpe mwasi oyo bawuti kobalana ekoyokana lisusu te kati na yo. Makambo wana nyonso ekosalema, pamba te bato na yo ya mombongo bazalaki bato na nguya ya mokili. Okosaki bato ya bikolo nyonso na nzela ya maji na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ