110 Bato mabe batiaka mitambo mpo ete nakweya, kasi nakangamaka kaka na mibeko na Yo.
Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba ; batela ngai mpo ete napengwa te mosika ya mibeko na Yo !
Otelemelaka bato ya lofundu, bato oyo balakelama mabe mpe bapengwaka mosika ya mibeko na Yo.
Solo, bato ya lolendo batiolaki ngai makasi ; kasi ngai, natikalaki kopengwa te na mibeko na Yo.
Bato ya lolendo batimoli mabulu mpo na kokanga ngai, baboyi kotosa mibeko na Yo.
Etikali moke mpo ete balongola ngai na mokili ; kasi atako bongo, nasundoli mibeko na Yo te.
Bato mabe bazali koluka koboma ngai, kasi ngai nakangami kaka na malako na Yo.
Yawe, batela ngai mosika ya maboko ya moto mabe ; kokutanisa ngai te na bato na kanza oyo bazali kosala mabongisi ya kokweyisa ngai !
Batela ngai mpo ete nakangama te na motambo na bango mpe nakweya te na mabulu ya bato ya misala mabe.
Bato oyo balukaka kufa na ngai bazali kotia mitambo, ba-oyo balukaka pasi na ngai bazali koloba mpo na kosala ngai mabe, bakomi mikolo nyonso kobongisa lokuta.
Batiaki monyama na makolo na ngai mpo ete nakangama, batimolaki libulu liboso na ngai, kasi bango moko nde bakweyaki kati na libulu yango.
Tika ete kolela eyokana wuta na bandako na bango tango okotindela bango banguna na pwasa, pamba te batimoli libulu mpo ete bakanga ngai mpe batie mitambo na makolo na ngai !
Boye, mokonzi Dariusi akomaki mokano oyo azwaki mpo ete babongola yango te mpe atiaki mokoloto na mokano yango.