Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 118:6 - Mokanda na Bomoi

6 Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te ; bato bakoki kosala ngai nini ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 118:6
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Motema na ye eninganaka te, abangaka te kino akomona banguna na ye kozwa etumbu.


Esengo na moto oyo Nzambe ya Jakobi azali mosungi na ye, oyo atiaka elikya na ye kati na Yawe, Nzambe na ye !


Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.


Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.


Alobaki : « Bovanda kimia, boyeba ete ngai nazali Nzambe ; nakonzaka bikolo, nakonzaka mpe mokili. »


Bongo, na mokolo oyo nakobelela mpo na kosenga lisungi, banguna na ngai bakozonga sima. Na nzela ya likambo yango, nakoyeba ete Nzambe azali mpo na ngai.


Pembeni ya Nzambe oyo nakumisaka Liloba na Ye, pembeni ya Yawe oyo nakumisaka Liloba na Ye,


pembeni ya Nzambe oyo natielaka motema mpe nazalaka na bobangi te, moto akoki kosala ngai nini ?


Mokolo oyo nazalaka na bobangi, natiaka elikya na ngai kati na Yo.


Epai ya Nzambe, nakumisaka Liloba na Ye ; Epai ya Nzambe, natiaka motema mpe nabangaka te. Moto oyo akokufa akoki kosala ngai nini ?


Solo, oyebi motango ya matambe ya bomoi na ngai ya mitelengano. Sopa mpinzoli na ngai kati na mbeki na Yo, oyo ezali buku na Yo ya ekaniseli.


Nani akotelema mpo na ngai mpo na kotelemela bato mabe ? Nani akokotela ngai liboso ya bato ya misala mabe ?


« Ezali Ngai, Ngai nde nabondisaka bino. Ozali nani mpo ete obanga moto oyo akokufa, mwana na moto oyo azali kaka lokola matiti ?


Kasi Yawe azali elongo na ngai lokola Elombe ya bitumba ; boye, banyokoli na ngai bakokweya mpe mikano na bango ekokokisama te ; bakotikala na soni mpe bakolonga te, bakobosana ata mokolo moko te soni na bango.


Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ?


Boye tokoki koloba na elikya nyonso : « Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te ; bato bakoki kosala ngai nini ? »


Tango bayokaki maloba ya moto ya Filisitia, Saulo mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na mawa mpe babangaki.


Yawe oyo akangolaki ngai na manzaka ya ngombolo mpe ya nkosi akokangola ngai na maboko ya moto ya Filisitia oyo. Saulo alobaki na Davidi : — Kende, mpe tika ete Yawe azala elongo na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ