5 Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ngai, abikisaki ngai.
Tango bantoma bazongaki epai ya Jakobi, balobaki : « Tokendeki epai ya Ezawu, ndeko na yo, mpe sik’oyo azali koya elongo na bato nkama minei mpo na kokutana na yo. »
Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.
Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe ayanolaki ngai.
Babundisaki ngai, na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai, kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai.
Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi, akangolaki ngai, pamba te alingaka ngai.
Basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai, mitambo ya kufa ekangaki ngai.
Nakozalaka moto ya esengo mpe nakosepelaka kati na bolingo na Yo ; pamba te omonaka pasi na ngai, mpe oyebi mitungisi na ngai.
Nabelelaka Nzambe na koganga ; nabelelaka Nzambe mpo ete ayoka ngai !