Eliya apusanaki pene na bato mpe alobaki : — Kino tango nini bokotambola lokolo moko na zamba mpe lokolo mosusu na nzela ? Soki Yawe azali Nzambe, tika ete bolanda Ye ! Kasi soki mpe Bala, bolanda ye. Bato bazongisaki ata eloko moko te.
Mokolo oyo elandaki, babonzaki bambeka mpe bambeka ya kotumba epai na Yawe : bangombe ya mibali nkoto moko, bameme ya mibali nkoto moko mpe bana meme nkoto moko elongo na makabo ya masanga ya vino mpe makabo mosusu ebele, mpo na Isalaele mobimba.
Lokola nasalaki masumu liboso ya Yawe, nakomema mokumba ya kanda na Ye kino tango akozwa likambo na ngai na maboko mpe akolongisa ngai. Akobimisa ngai na pole, mpe nakomona bosembo na Ye.
Yesu alobaki lisusu na bato : — Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.
Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.