25 Yawe, nabondeli Yo, pesa lobiko. Yawe, nabondeli Yo, pesa elonga.
Bango, bafukamaka mpe bakweyaka ; kasi biso, tozalaka kaka ya kotelema mpe totikalaka ngwi.
Bikisa bomoi na ngai liboso ya mopanga, mpe kangola yango wuta na manzaka ya bambwa.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi : ezali ya koyemba lokola « lisi. »
Bato oyo bavandi na ekuke batiolaka ngai, balangwi masanga bayembaka kombo na ngai kati na banzembo na bango.
Tika ete boboto ya Nkolo, Nzambe na biso, ezala elongo na biso ! Mpo na biso, sala ete misala na biso ekende liboso ! Iyo, sala ete misala na biso ekende kaka liboso !