18 Solo, Yawe apesaki ngai etumbu makasi ; kasi akabaki ngai na kufa te.
Mpo na yango, mopanga ekolongwa lisusu te na ndako na yo, pamba te otioli ngai mpe ozwi mwasi ya Iri, moto ya Iti, mpo ete akoma mwasi na yo.
Akokangola yo na kufa, na tango ya nzala makasi ; mpe akobikisa yo na nguya ya mopanga, kati na bitumba.
Nazindi kino na kingo, mayi ya libulu ya molili makasi ezingeli ngai, matiti ya ebale ekangani-kangani zingazinga ya moto na ngai.
Nzokande, Nkolo apesaka biso etumbu mpo na kozongisa biso na nzela, mpo ete tozwa etumbu te elongo na mokili.
koyebana lokola bato oyo bayebani te, nzokande toyebani makasi ; koyebana lokola bakufi, nzokande tozali bato ya bomoi ; koyebana lokola bato bakweyisama, nzokande baboma biso te ;